Oroszország gyalázatos háborút folytat Ukrajna ellen.     Állj ki Ukrajnával!
Ossza meg
Betűméret
Eredeti dalszöveg

Losambo szöveg

Losambo Y’a EXTRA
Moto soki nanou akoufi té, koseka yé té
 
Tata Nzambé yoka losambo eh
Losambo, losambo
 
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
To lamukaka na tongo po to luka la vie
To lamukaka na tongo po to meka nzoto oh
Pesa nguya papa, po to koka yango hein
 
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
To lamukaka na tongo po to luka la vie
To lamukaka na tongo po to meka nzoto oh
Pesa nguya papa, po to koka yango hein
 
Ah Nzambé tata, y’okeli ngaï sima ya biloko biso ya se
Y’opesi moto mayelé koleka biloko nios’okela, pona nini ngaï té eh
Ah tata tata Nzambé eeh
 
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
To lamukaka na tongo po to luka la vie
To lamukaka na tongo po to meka nzoto oh
Pesa nguya papa, po to koka yango hein
 
Mokili etondi pasi, mokili etondi mabé yeh yeh
Nzambé eeh, Allah salisa ngaï eh
Baninga bazwaka se na réalité eh Nzambé
Oyo ya ngaï, se na ndoto oh oh
Yahwé salisa nga ah, Nzambé tata
Nako mona pasi, ah ngaï mwana aah
 
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
To lamukaka na tongo po to luka la vie
To lamukaka na tongo po to meka nzoto oh
Pesa nguya papa, po to koka yango hein
 
Nako fukama, tika na senga na Yahwé
Yé moto asala likolo na sé, tata ah mosalisi
Tika na senga epayi nayo tata ah Nzambé
Yo ndé mosungi na biso tata ah
Salisa biso papa ah, na mokili oyo ya sé
 
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
Tata Nzambé yoka losambo ya bana ah
To lamukaka na tongo po to luka la vie
To lamukaka na tongo po to meka nzoto oh
Pesa nguya papa, po to koka yango hein
 
Nani moto a pesa pema, se yé eh
Mokolo a ko botola yango, oyo nde bilelo
To kumisa yé eh, tata Nzambé mosungi berger eh
Ooh nako senga nayo Nzambé mosalisi papa eh
Bikisa biso bana ya le CONGO oh yeh
Bitumba bitondi na mboka oyo Yahwé
Ko tika biso té na pasi oyo oh
 
Otikaka Caïna
Otikaka bana ya Noé
Otikaka Sodome na Gomorrhe
Tala pasi na biso oh
BRAZZAVILLE etondi pasi yéh
 
Otikaka Caïna
Otikaka bana ya Noé
Otikaka Sodome na Gomorrhe
Tala pasi na biso oh
 
(SEBENE)
 
Tango to bandaki musiki bino bozalaki té eh
To Sali EXTRA-MUSICA bino bo sepeli mingi
Lobi Ngoma Africa ah eh, lelo Palme d’or
Bokomi ko kana biso, to Sali nini zwa ya pamba oh
 
Pona KILA eh, boko kendé sango
Pona ROGA-ROGA eh, boko kendé sango
Pona QUENTIN eh, boko kendé sango
Pona ESPÉ BASS eh, boko kendé sango
 
Na leeh na lela na nani eh [tala bozoba na yomoko]
Na leeh na lela na nani eh [tala bozoba na yomoko]
Okimi libala oké bodumba [tala bozoba na yomoko]
Okimi Africa okoti mayi [tala bozoba na yomoko]
 
Na leeh na lela na nani eh [tala bozoba na yomoko]
Na leeh na lela na nani eh [tala bozoba na yomoko]
Batindi yo mapa, oke kosomba ntaba [tala bozoba na yomoko]
 
ROGA-ROGA to solola
ROGA-ROGA to solola
Eeh liberateur
Koma l’école eh (3x)
Tout le monde i, o, a
Todo el mundo i, o, a
KILA BONGO i, o, a
ESPE BASS i , o, a
ROGA-ROGA i, o, a
Oxy Oxygène i, o, a
 
 
Koma l’école eh (3x)
Tout le monde i, o, a
 
Toto tire Nana ah
Nana tire Toto eh
Avec ma bouche tu veux manger piment oh
Avec ma bouche tu veux manger piment oh
Awa té eh, allez katuka ah
Eh yo eh yo quitte la
Eh yo eh yo eh yo quitte la
 

 

"Losambo" fordításai
Zaiko Langa Langa: Top 3
Hozzászólások